CTM+ ebimisi reportage na ntina ya masculinité positive na biteyelo. Ezali koloba na bilenge ete bayekola limemya, baboya mobulu mpe bakokisa mikumba na bango kozanga kokonza basusu.
Video yango ezali eteni ya mosala ya kolamwisa biteyelo oyo coordination nationale elakisi. Ekangisi bokokani kati na bana basi mpe bana mibali na kopekisa mobulu. Foto euti na mosala yango moko.